Psalms 146

Nzambe alongisaka bato oyo bazali konyokwama


1 Sanzola Yawe !
Sanzola Yawe, e e molimo na ngai !

2 Nakosanzola Yawe na bomoi na ngai mobimba ;
nakoyemba masanzoli mpo na Nzambe na ngai
tango nyonso oyo nakozala na bomoi.

3 Botia mitema na bino na bana ya bakonzi te,
to na bato oyo bakufaka,
baoyo bakoki kobikisa te.

4 Tango molimo na bango ekobima,
bakozonga na mabele ;
na mokolo wana ; mabongisi na bango nyonso
ekomaka pamba

5 Mapamboli ezali na oyo Nzambe ya Zakobi
azali lisalisi,
oyo atiaka elikya na Yawe,
Nzambe na ye !

6 Mozalisi ya likolo mpe na se,
ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ;
Yawe, ye moto abatelaka boyengebene mpo na libela.

7 Alobelaka likambo ya oyo bazali konyokola
mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ;
Yawe akomisaka bato ya boloko bansomi.

8 Yawe apesaka pole na mokufi miso ;
Yawe atelemisaka baoyo bangunzama ;
Yawe alingaka bato na sembo.

9 Yawe akengelaka bapaya,
mpe asungaka bana oyo bakufela baboti
mpe basi oyo bakufela mibali ;
kasi abebisaka banzela ya bato ya mabe.

10 Yawe azali na bokonzi libela na libela ;
Nzambe na yo, Siona,
mpo na bato ya batango nyonso.
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB